Psalms 26

Yawe, longisa ngai

Nzembo ya David


1 Longisa ngai, Yawe,
pamba te nazali na bomoi oyo ezangi mabe ;
natiaki motema na ngai kati na Yawe,
na koningana-ningana te.

2 Yawe,
tala ngai malamu mpe meka ngai ;
tala makambo oyo ezali na motema na ngai
mpe na makanisi na ngai.

3 Pamba te bolingo na yo ezali liboso na ngai tango nyonso,
mpe natambolaka tango nyonso kati na solo na yo.

4 Navandaka esika moko te na bato ya lokuta ;
to natambolaka te na bato oyo bazali bakosi.

5 Nayinaka lisanga ya bato oyo basalaka mabe,
mpe navandaka esika moko te na bato na mabe.

6 Nasukoli maboko na ngai mpo nayebi likambo moko te,
mpe na kotambola zinga-zinga ya mesa na yo,
oyo batumbelaka mbeka,

7 na kosakola masanzoli na yo na mongongo makasi
mpe kolobela misala na yo nyonso ya kokamwa !

8 nalingaka ndako na yo,
epai yo ovandaka, Yawe,
esika nkembo na yo ezalaka.

9 Kolongola molimo na ngai te
elongo na bato ya masumu,
to mpe bomoi na ngai elongo na bato oyo basopaka
makila ya bato,

10 kati na baoyo maboko ezali na mabongisami ya mabe
mpe loboko ya mobali etondi na “madesu ya bana”

11 Kasi ngai, nazali na bomoi oyo ezangi pamela ;
kangola ngai na bowumbu mpe yokela ngai mawa.

12 Makolo na ngai etelemi
na mabele ya alima ;
Na kati ya lisanga monene nakokumisa Yawe.
Copyright information for LinMNB